Home / Politique / Politique / BANA ELONGA RÉVISION LEÇON :

BANA ELONGA RÉVISION LEÇON :

« ESENGO NA BISO, LISALISI NA BISO PE BOTOSI NA BISO EZALI KOWUTA KATI NA BISO MOKO NA NDENGE TOZALI KOMIYEBA, KOMINDIMA NA KOMITOSA.

BISO TOKO KENDE KOLUKA MUTU TE AYA KOMEMELA BISO ESENGO » !

MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

BA NDEKO TO YAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI, NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NIONSO NDENGE BA BENGAKA YE.

ESENGO NA BISO, LISALISI NA BISO PE BOTOSI NA BISO EZALI KOWUTA KATI NA BISO MOKO NA NDENGE TOZALI KOMIYEBA, KOMINDIMA NA KOMITOSA.

BISO TOKO KENDE KOLUKA MUTU TE AYA KOMEMELA BISO ESENGO.

TOKENDE KOZUA MUTU WANA PO YENDE AKOMEMELA BISO ESENGO. MUTU OYO WAPI ? YA LIBANDA ?

AWA BISO TOWUTI KOYEBA BATU YA LIBANDA NDENGE BAZALAKA.

ESENGO NA BISO LISALISI NA BISO PE BOTOSI NA BISO TOLOBI ESENGELI EWUTA KATI NA BISO MOKO NA NDENGE BISO TOMIYEBI, TOMINDIMI PE TOZALI KOMITOSA.

BAKOTOSA OYO TOZALI KOBONGISELA NA NZELA PE BA NDEKO OYO TOZALI KOLAMUSA NA PONGI EZALI PO BAYA KOMIYEBA, KOMINDIMA PE KOMITOSA.

MUSALA NA BISO,
MUSALA OYO BANA ELONGA BAZALI KOSALA,
MUSALA OYO YA KOBONGISA BABOTOSI OYO BAKOZALA EBELE,
MUSALA OYO TOZALI KOSALA PONA KO PRÉPARER, KOLAMUSA BA NDEKO NA PONGI OYO BAKANGAMA NA BA NDAKU WANA, BISIKA WANA, EZALI PONA BAYA KOMIYEBA, KOMINDIMA PE KOMITOSA.

BANGO MOKO ! BISO TE TOKO NDIMISA BANGO, BISO TOKOYA KOLAKISA BANGO…

BANGO MOKO ESENGELI BAMIYEBA, BAMINDIMA PE BAMITOSA !

BISO TOZALI KOMEMELA BANGO LISUNGI BILEYI : TALA MOKILI NDENGE EZALI, TALA BATU WANA NDENGE BAYAKA KOBEBISA MOKILI, TALA NDENGE BAYAKA KOKOSA BISO…TOMEMELI BANGO MALOBA: NANI AZALI YO, NANI AKOSALISA YO ? LISUNGI NA YO OKOZUA WAPI? NANI AKOSALISA YO ?

TALA BISO NDENGE TOZALI KOMEMA. MUANA YE MOKO AKOYA KOYEBA NGAI NAZALI BA OYO BALEKAKI LIBOSO NA NGAI.

PONA BATIKELA NGAI BA KOMBO, BILONGI NA MAKILA NA BANGO.

NGAI NA ZALI BANGO.
ESENGELI NGAI NA TOSA BANGO PO TOZO TAMBOLA ELONGO NA BANGO.

TALA MUANA YE MOKO AZO YA KO DÉCOUVRIR BA OYO YA YE. TANGO AKOYEBA YANGO MWANA AKOYA KOMITOSA.

À SUIVRE.

MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

Auteur/autrice

Répondre

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *