Home / Politique / Politique / BANA ELONGA RÉVISION LEÇON :

BANA ELONGA RÉVISION LEÇON :

« NZELA NA BISO MWINDA LIBOSO EZALI TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA !

NZELA NA YE EZALI OYO EZALI KOMEMA NA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO » !

MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

BA NDEKO TO YAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEZA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO BA BENGAKA YE.

TOLOBI BA OYO BAKO SUTUKA NA MPONGI NA BANGO BAKO TELEMA PONA KOLANDA MWINDA YA BA KOKO NA BANGO.

BAKO KOMA NA NZELA NA BANGO.
LIBOSO KUNA BAKO MONA TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA !

YE NDE AZALI KOMEMA BAYINDO NIONSO LIBOSO YA NZAMBE YA BA KOKO OYO BISO TOBENGI NA MINOKO NA BISO NIONSO : NZAMBE MPUNGU, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE.

TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA YE KAKA NDE MUTU AZALI KOMEMA BISO PO TOKENDE KOKUTANA NA MAMA NA BISO KONGO.

NA NZELA NA BISO BAKO LUKA BA KOMA BANA YA BILAKA YA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

AWA TOZALI KOLOBA NA NANI ? BA OYO BAKO KOKA KO SUTUKA NA MPONGI NA BANGO.
SOKI BALANDI MWINDA YA BA KOKO NA BANGO BAKOYA KOKOMA NA NZELA NA BISO.

SOKI BAKOMI NA NZELA NA BISO BAMONI MWINDA LIBOSO TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA, BAKO LUKA NANU BAKOMA BANA BILAKA YA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

TOPESA BA MATEYA EBELE NINI ELAKISI BANA BILAKA YA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.

BAKO ZONGELA KAKA MISALA NA BISO NA GROUPE FACEBOOK « BANA ELONGA » PO BATANGA ELAKISI NINI KOKOMA MUANA BILAKA KIMBANGU DIANTUNGUNUA. EZALI MATEYA MOBIMBA.
KUNA NDE BAKO KENDE KOKUTANA NA MATEYA YA LOLENGE NIONSO.

BAKOYEBA BAZALI BA NANI.
LOKOLA BAKOMI NA NZELA NA BANGO, BAKUTI BA KOKO NA BANGO, BANA SIKOYO BAKO YA KOYEBA BAZALAKA BA NANI, BAWUTA WAPI, BAZALI KOKENDE WAPI.

BANA BAKOYA KOMIYEBA, KOMINDIMA PE KOMITOSA.

NIONSO OYO BISO TOBIMISI EZALI MATEYA TOPESA NA FACEBOOK PE WATTSAPP YA BANA ELONGA.

BAKOYA KOMONA BA OYO BAZALI MPEMBENI NA BANGO PO BAKEYI KOKUTANA BANGO NIONSO EPAYI YA BA KOKO NA BANGO.

BAKO MITUNA : NDEKO YO PE OYAKA AWA ? YO PE OZALI AWA ? BAKOYA KOSOLOLA KE BA NDEKO OYO NIONSO BAZALI MPEMBENI NA BANGO BAYAKA KOKUTANA NA KOKO. ELAKISI KE BANGO
NIONSO BAZALI KOKO MOKO.

TALA ESIKA BOLINGO EKOYA KOBOTAMA KATI NA BANGO.

TANGO BISO TO SOSOLI KE BISO NIONSO OYO TOTELEMI AWA LIBOSO YA KOKO NA BISO, TOZALI KOKO MOKO, BOLINGO EKOYA KOBOTAMA KATI NA BISO.

À SUIVRE.

MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

Auteur/autrice

Répondre

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *