« LELO OYO MISU NA BISO EFUNGWAMI, TOBANDI KOLONGOLA BA MATITI OYO EZIPAKA NZETE NA BISO YA BOKONZI » !
MPAKA MATIKI MOLAKISI YA BALAKISI WAYAMBO YA BANA ELONGA.
BA NDEKO BOYAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, ONIA SONGO, MAWEJA NA NGILA, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI, NZAMBE YA BA KOKO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE NA MINOKO NIONSO.
TOWUTAKI KO SENGA NA MOKO NA MOKO NA KOSAKOLA NA SE YA NZETE NA BANGO YA BOKONZI.
BA OYO BAKOSALA MOSALA WANA BAKOMONA NA BANGO MOKO NDENGE BOSOLO NA BANGO NA NZAMBE PE BA KOKO NA BANGO EKO KOMA.
MBUMA OYO NZETE NA BANGO YA BOKONZI EKOKITISELA BANGO BAKOLOKOTA YANGO NA ESIKA BASAKOLA.
BAKOZUA MBUMA TE NA SE YA MATITI, ESIKA WAPI BAKOKI KOKUTANA NA BA NIOKA PE BA NZUBE.
PE TOLOBAKI LISUSU ETE BAKO NINGISA NZETE TE PO BAZUA MBUMA YA KOLIA. NZETE EKO KITISELA BANGO MBUMA NA YANGO MOKO.
LELO OYO TOMEMELI BINO NINI BA NDEKO ?
BOTOSI PO NA KOZUA LIBATELI YA BA KOKO.
BOTOSI !
PO TOZUA LIBATELI YA BA KOKO NA BISO ESENGELI NA BISO TOZALA NA BOTOSI.
TOZALA NA BOTOSI !
BOWUTI KOSAKOLA NA SE YA NZETE NA BINO YA BAKONZI, BA MATITI PE MISISA YA TINA TE BOTUMBI.
NZETE NA BINO EKOMI KOPEMA MALAMU, BOLONGOLI PE BOTUMBI BA BUKU PE MALONGI OYO BOLOKOTA NA NZELA OYO EWUTAKA LIBANDA KOZIPA BO NKOKO NA BISO.
BATU YA LIBANDA OYO BISO TOYEBAKA TE, BA MEMELAKA BISO BA BUKU PE MALONGI OYO TOYEBI EBANDELI PE SUKA NA YANGO TE.
NIONSO WANA NA MAKANISI NA BANGO EZALAKI PO BAYA KO NIATA BO NKOKO NA BISO, KOZIPA BO NKOKO NA BISO : NZETE NA BISO YA BOKONZI OYO EZALAKI KO LESA BISO, TO TIE YANGO PEMBENI TOBOSANI YANGO TOKOMI KOLANDA OYO BISO TOYEBI TE.
ESIKA EZALAKI NZETE NA BISO ZAMBA EBIMA, MATITI EZIPA NZETE NA BISO YA BOKONZI.
NZETE EZALI KOBIMISA MBUMA KASI TOZALI KOKOKA KOLIA MBUMA YA NZETE NA BISO TE, PASI EKOTI NA MBOKA.
KASI LELO OYO MISU NA BISO EFUNGWAMI, TOBANDI KOLONGOLA BA MATITI OYO WANA, OYO EZIPAKA NZETE NA BISO YA BOKONZI.
À SUIVRE.
MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.






