« NA NZELA OYO YA SIKA TOKOTI : TOKO KUTANA NA BA KOKO NA BISO.
BA KOKO OYO BATIKELAKA BISO BA KOMBO, BILONGI PE MAKILA » !
MPAKA MATIKI MOLAKISI YA BALAKISI WAYAMBO YA BANA ELONGA.
BA NDEKO BOYAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, ONIA SONGO, MAWEJA NA NGILA, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE NA MINOKO NIONSO.
TOKOMI KO SAKOLA, KO PIKOLA BA MISISA PE KOTUMBA YANGO, NZETE NA BISO EMONANI EKOMI KOPEMA.
NA SE YA NZETE EZALI POLELE BANA BAKOKI KOFANDA.
BO NKOKO OYO YA BISO OYO BA BUKU PE MALONGI YA LIBANDA EYAKI KO KUNDA, TO TUMBI BA BUKU WANA, MALONGI WANA NA MATOYI NA BISO EKOKOTA LISUSU TE.
TOKOMI KOSALELA KAKA BOKOKO NA BISO.
TOSAKOLI NA ESIKA WANA OYO EZALI BO NKOKO NA BISO, MAKAMBO YA PAMBALA PAMBALA EKO PUSANA PE KOKOTA TE.
NA ESIKA WANA NDE BO NKOKO NA BISO EBANDI KOLESA BISO. NZETE NA BISO YA BOKONZI EBANDI KO KITISELA BISO MBUMA.
MBUMA OYO TOBANDAKI KOKOKA KOZUA TE, TOKO BANDA KOZUA YANGO TANGO INSO BISO TOKO KOSAKOLA NA SE YA NZETE NA BISO YA BOKONZI.
NA NZELA OYO YA SIKA OYO TOKOTI TOKO KUTANA NA BA KOKO NA BISO, PO TOZALAKI MOSIKA NA BA KOKO NA BISO.
NA NZELA OYO YA ZAMBA PE YA PASI BA MEMAKA BISO, TOBANDAKI KOKUTANA NA BA KOKO NA BISO TE.
KASI TANGO TOSALI MOSALA WANA YA KOSAKOLA NA SE YA NZETE NA BISO YA BOKONZI, TOBUAKI OYO BAMEMELAKA BISO, TOKO KUTANA NA BA KOKO NA BISO.
BA KOKO OYO WAPI ?
BA KOKO OYO BATIKELAKA BISO BA KOMBO, BILONGI PE MAKILA !
MAKILA NA BANGO,
BA KOMBO NA BANGO PE BILONGI NA BANGO, LELO BISO TOZALI NA YANGO.
YANGO NDE TOKOTIKELA BA OYO BAKOYA SIMA NA BISO.
SIKOYO TOKO SALA NINI PO TOZUA LIBATELI NA BANGO ?
YANGO NDE MAKAMBO BISO TOYE KO KABOLA NA BILEYI YA LELO, MASOLO OYO TOYE NA YANGO NA MOKOLO YA LELO.
A SUIVRE.
MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.





