« AZWA MOLAYI, MISO, ZOLO, SUKI YA BA KOKO NA YE.
TANGO ANDIMI NDENGE YE AZALI ANDIMI PE BA KOKO NA YE LOKOLA BAZALI PO BAZALI YE » !
MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.
MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, ONIA SONGO, MAWEJA NA NGILA, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NIONSO NDENGE BA BENGAKA YE.
BANA OYO BAKOMI KOTAMBOLA NA BA KOKO NA BANGO BAKOYA KOYEBA BAZALI BA NANI ?
BA WUTA WAPI ?
BAZALI KOSALA NINI ?
PO NA NINI ?
BAKO KENDE WAPI ?
TALA ESIKA BANA BAKOYA KOMI YEBA, LOKOLA BAZO TAMBOLA NA BA KOKO NA BANGO, BAZALI NA KATI YA BA KOKO NA BANGO.
BANA BAZOMONA KASI KOKO WANA NA KOKANA NA YE, NAZUA ELONGI YA KOKO WANA.
MUANA AYE KO KOSOLOLA AWUTA WAPI !
AMITALI ESIKA YE AZALI NA BA KOKO NA YE, AMONI ELONGI NA YE ETONDI EBELE
ASOSOLI KE ELONGI NA YE EWUTA NDE MOSIKA.
KOMBO NA YE EWUTA MOSIKA.
MUANA WAYA AKOYA KOYEBA AZALI NANI ? AWUTA WAPI ?
AZALI KOSALA NINI ?
PO NA NINI ?
LOBI AKO KENDE WAPI ?
TOMONI YANGO PO MOTO ALOBA AMIYEBI ESENGELI AYANOLA MALAMU NA MITUNA OYO TOWUTI KOBIMISA.
AZA NANI ?
AWUTA WAPI ?
AZO SALA NINI ?
PO NA NINI ?
LOBI AKO KENDE WAPI ?
SOKI AYANOLI MALAMU AKOMONA ETE AZALI BA KOKO NA YE PO BAZALI NA MAKILA MOKO, BILONGI MOKO PE AZALI NA BA KOMBO NA BANGO.
AZWA MOLAYI, MISO, ZOLO, SUKI YA BA KOKO NA YE.
TANGO ANDIMI NDENGE YE AZALI ANDIMI PE BA KOKO NA YE LOKOLA YE PO BAZALI YE.
TALA ESIKA MOTO AKOKI KOLOBA ETE AMI NDIMAKA.
PO YO OLOBA OMI NDIMAKA ESENGELI OYEBA NANU YO OZA NANI.
SOKI OYEBI OZA NANI OKOYA KOMONA KE OZALI BA OYO YA YO BALEKA, OZALI BA OYO YA YO OYO BAKOYA SIMA.
BAKO ZALA LOKOLA YO: MISO NA YO, MAKILA NA YO, ELONGI NA YO, KOMBO NA YO.
TANGO YO OMI NDIMI NDENGE YO OZALI : MUKUSE NA YO, MISU NA YO ONDIMI YANGO, ONDIMI PE YA BA OYO NIONSO BAZALI LOKOLA YO, WANA NDE OKOKI KOLOBA OMI NDIMAKA.
LOKOLA YO OMI NDIMI,
ONDIMI BA OYO YA YO,
ONDIMI PE YO MOKO, WANA OKOKI KOLOBA KE OMI NDIMAKA.
MOTO OYO AMI YEBI PE AMI NDIMI AKO TAMBOLA NA NZELA NA YE NA BOTOSI NIONSO.
DALAPO NA YE KIMBANGU DIANTUNGUNUA EKOKI KOKWEYA TE.
MOTO WANA AKO TOSA MIBEKO, AKO TOSA BA KOKO NA YE, BAZALI KOTAMBOLA NA YE.
AKO YOKA BA KOKO NA YE SONI TE.
PO BALATAKA KUPÉ TO LIPUTA.
AKO BOMBA BA KOKO NA YE TE PO AKENDE KOSENGA LISALISI NA BA KOKO YA BATU MOSUSU.
AKO TOSA BA KOKO NA YE NDENGE ATOSAKA NZOTO NA YE NDENGE MOKO.
MOTO YA LOLENGE BOYE AKOKI KOLOBA ETE AMI TOSAKA.
PO OYA KOLOBA KE YO OMI TOSAKA ESENGELI NANU YO OMI YEBA PE OMI NDIMA.
TANGO YO OZO TOSA BA OYO BAZALI LOKOLA YO,
TANGO YO OZO TOSA NIONSO : OZA NA BOTOSI NA NIONSO, OTOSAKA BA KOKO NA YO, ONDIMAKA BA KOKO NA YO PE OTOSAKA BANGO WANA YO OKOKI KOLOBA YA SOLO OMI TOSAKA.
MINGI NA NZELA BAZALI KOLOBA ETE BA MINDIMAKA KASI TANGO OKO TUNA SOKI BAYEBI BA KOKO NA BANGO OKO ZUA EYANO MOKO TE.
KUTU BAKO BIMISA MALOBA YA MABE PONA BA KOKO NA BANGO.
BAKO BENGA BANGO BA NDOKI.
KOKO NA YO AKOMI NDOKI ?
SOKI KOKO NA YO AZALI NDOKI, KOKO NA YO ATIKELA YO MAKILA.
OZALI NA MAKILA YA KOKO NA YO !
SOKI KOKO NA YO AZALI NDOKI ? YO MOKO OZALI NANI ? TALA NDENGE MAYELE YA BATU ESILAKA.
TOZO KANISA MOSIKA TE.
KOMBO OLATI , KOMBO YA KOKO NA YO.
SOKI KOKO NA YO AZALI NDOKI KASI YO MOKO OZO SALELA KOMBO NINI ?
MAKILA OZA NA YANGO EZALI YA BA NANI ?
MINGI BALOBAKA BAMI TOSAKA KASI BAMI YEBAKA TE PE BAMI NDIMAKA TE.
BA NDIMAKA BA KOKO NA BANGO TE.
MIKOLO NIONSO YA EYENGA NA BA BUKU ANONYME KO KENDE KOLUKAKA BA KOKO YA BATU MOSUSU, MAWA MINGI.
MAWA NA BANGO PO BAKOTIKALA KOZUA EYANO MOKO TE.
BA OYO WANA BAMI TOSAKA TE.
TOTUNI YO NDEKO : YO OMI TOSAKA ?
EYANO NA YO : NAMI TOSAKA PO NA FINGAKA NA NGAI BATU TE.
YA SOLO OFINGAKA BATU TE KASI OMI TOSAKA TE.
PO MUTU OYO AMI TOSAKA ESENGELI AMI YEBA PE AMI NDIMA.
PO SOKI BA BANDI KOTUNA YO: OFINGAKA BATU TE ? OYEBI BA KOKO NA YO ? NAYEBI BANGO TE.
BA KOKO NA NGAI BA NDOKI. NA TOSAKA BANGO TE PO BAZALI BA NDOKI.
YO MOKO MAKILA NA YO EZALI YA BA KOKO NA YO, ELONGI OYO YA YO EZALI YA BA KOKO NA YO. SOKI OZO TOSA BANGO TE, NDENGE NINI YO MOKO OKOMI TOSA ?
OYO WANA AZALI LOKOLA YO O TOSAKA YE TE. AZA YO KASI OTOSAKA YE TE. ELAKISI KE YO MOKO PE OMI TOSAKA TE.
YO MIKOLO NIONSO YA YENGA NA BA BUKU ANONYME NA MABOKO. OTO SAKA BA KOKO NA YO ?
OZO TAMBOLA NA KOKO NA YO,
OKO BOMBA KOKO NA YO TE,
OKO YOKA SONI YA KOKO NA YO TE.
OZA NA BA BUKU ANONYME NA MABOKO PO OSALA NA YANGO NINI ? OZO KENDE KOLUKA LISALISI EPAYI YA BA KOKO MOSUSU ?
KOKO NA YO OTIKI YE,
KOKO NA YO OBOMBI YE PO OKENDE KOZUA LISALISI EPAYI YA BA KOKO MOSUSU ? WANA OTOSAKA KOKO NA YO ?
OMONI KOKO MOSUSU AZO LEKA NA DIPLOMATE SOKI YA MBONGO, SOKI YA NINI ?
KOKO NA YO AZALI NA KUPÉ,
KOKO YO BOMBANA NANU AWA NGAI NA LANDI NANU KOKO WANA,
NA MONI AZA NA DIPLOMATE TANGO MOSUSU NA DIPLOMATE WANA MBONGO EZALI.
EST-CE QUE OTOSI KOKO NA YO ? BONGO SIMA OLOBA LlSUSU OMI TOSAKA ?
EBELE BAZALI WANA !
BAZO LOBA BAMI YEBAKA,
BAMI TOSAKA,
BAMI NDIMAKA.
KASI TOYEBI KE BAMI YEBAKA TE !
BAMI NDIMAKA TE ! BAMI TOSAKA TE !
TOWUTI KOTALISA :
PO MUTU ALOBA KE AMI YEBI, TO AMI NDIMI TO AMI TOSI. ESENGELI AKOKISA PE AZONGISA BIYANO NA MITUNA NIONSO. SOKI AKOKISI TE EZA PAMBA.
BA NDEKO TOZALI NA NZELA BISO BANSO.
TOYEBA BISIKA TOZALI KOKITISA MAKOLO NA BISO.
TOMI LENGELA MALAMU PO NA KOZUA ELOKO YA MALONGA, ELOKO YA MALAMU OYO EKO MEMA ESENGO NA MABOTA NA BISO.
TOYEBI POSA YA MOKO NA MOKO NA BISO !
BOZA NA POSA WANA TOKENDE KOZUA ELOKO NA BISO PONA ESENGO YA LIBOTA.
KASI TOLOBI WANA EZALI DEUXIÈME ÉTAPE.
MOSALA OYO TOZALI KOSALA EZALI PREMIER ÉTAPE PO TOMIBIKISA NANU BISO MOKO PE TOBIKISA BA OYO TOMONA TE.
SOKI TOSALI YANGO : TO MI BIKISI PE TOBIKISI BA OYO BAKOYA SIMA.
NDE TOKO TELEMA ELONGO NA BA OYO BA KOKO OYO KOZUA ELOKO OYO BISO TOZO LUKA, OYO EKOPESA BISO ESENGO PE KIMIA NA MITEMA NA BISO.
KASI BA OYO BAZO BIMA MBANGU MBANGU, BA OYO BAZO MILENGELA NDENGE YA MABE BAYEBA KE BAKO ZUA ELOKO MOKO TE, BAKO SUKA NA NZELA.
BA NDEKO OYO BAZO YOKA MALOBA OYO BISO TOZO MEMELA BANGO MALOBA YA BA KOKO NA BANGO KASI BAZO SALELA YANGO ELOKO MOKO TE.
BOMI TUNGISA TE,
TOYEBI KE BOZA NA KATI YA SONI,
BOZO YOKA SONI BIPAYI BINO BOZALI.
NA MISO YA BATU BOKO WANGANA MALOBA YA BA KOKO NA BINO, KASI TANGO BOZALI BINO MOKO BOZO YOKA YANGO SONI PO MILIMO NA BINO, ÂME NA BINO EZO TALISA BINO OYO BOZO SALA.
KOKO AMEMELI YO MALOBA OWANGANI MALOBA YA KOKO NA YO NA MISO YA BATU, PO OKENDE KOLANDA MALOBA OYO OLOKOTI NA NZELA OYO OYEBI TE, ELOBI NINI ? YO MOKO OYOKI SONI.
BA NDEKO TOMI PESA MAKASI, TOTIA ELIKYA NA MALOBA OYO OYO TOZO ZUA NA BA KOKO NA BISO.
BOZO WANGANA MALOBA YA BA KOKO NA BINO NA MISO YA BATU PO BOMILAKISA BOBIMA SOKI NINI ? TANGO BOKOZONGA NA NDAKO, MILIMO NA BINO EFANDISI BINO, BOYOKI SONI !
SOKI BO BONGWANI TE,
BOKO KUFA NA SONI WANA.
BISO TOZO YA KOPESA MAKASI NA BA OYO BAZO YA KOSUTUKA NA PONGI : BOSALA MAKASI BO TELEMA.
OYO BINO BOMONAKI NA PONGI NA BINO BOBIMISA YANGO,
BOLOBA BOMONAKI NINI ?
BO BANGA MUNTU TE BOLOBA ! EZALI PO NA LOBIKO NA BINO.
BOKOYA KOMIBIKISA PE KOBIKISA BA OYO YA BINO NA MABOTA NA BINO.
TANGO BOLINGI KOLOBA TE :
MAKAMBO OYO SOKI NA BIMISI BANINGA BAKO KIMA NGAI, OZONGI NA PONGI.
NA ESIKA OMOBIKISA OLALI LISUSU PONGI, YO MOKO OYEBI SUKA NA YO EKOZALA NDENGE NINI ?
TOTIKI BINO WANA NA MABOKO YA BA OYO YA BINO.
NTEMO YA TATA MPUNGU EKITELA BISO NIONSO BISIKA NIONSO OYO BISO TOKOZALA.
TOTAMBOLA NA NTEMO YA TATA.
MWINDA NA BISO KIMBANGU DIANTUNGUNUA AZALA TANGO NIONSO LIBOSO NA BISO.
YE MUTU AZO MONA NIONSO.
YE MUTU AZO KOLAKISA BISO NZELA.
BA KOKO NA BISO KOBANDA NANU NA BA KOKO YA MABOTA NA BISO : BA MBAZI, BA SANTU BANGO NIONSO OYO YA BISO, BAZALA WANA SIMA YA MUKONGO NA BISO PONA KOBATELA, KOSALISA PE KOPESA BINO MAKASI.
MATONDO MATONDO MATONDO 🙏🏿🙏🏿🙏🏿
MPAKA Mwana Matiki , KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.





