Home / Politique / Politique / MPAKA MATIKI : TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA MWINDA YA BISO BAYINDO ABOYA KOSANGISA BONZAMBE, AKOMA MOBEBISI « COOP » !

MPAKA MATIKI : TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA MWINDA YA BISO BAYINDO ABOYA KOSANGISA BONZAMBE, AKOMA MOBEBISI « COOP » !

TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA ABOYA KOSANGISA BONZAMBE.
TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA ASEKUISA BAWEYI, ABIKISA BATU NA BOKONO EBELE.

BA COLONS-CONQUISTADORS BA BENGISA YE BASANGISA BONZAMBE ABOYA, PONA BA KITISA YE : BA BAMBA YE KOMBO YA SIMON, BABENGANA YE NA LINGOMBA NA BANGO, AYA KOMITIKA BA KANGA YE, BA NIOKOLA YE, BA JUGEA YE NA COUR DE GUERRE, BA BAMBA YE ETUMBU, CONDAMNÉ À MORT PUIS PRISON À PERPÉTUITÉ, 30 ANS DE PRISON.

BASANGISAKA BONZAMBE TE, DIXIT MPAKA MATIKI, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

COMMENT YO MOYINDO OKOMA KOTOMBOLA PE KOKUMISA BA KOKO YA BA BAPAYA. KOKO NA YO OYO ANDIMA BA PASI PONA YO OZUA BONSOMI NA BOMOYI NA YO, OBUAKISA YE.

TATA, MAMA, NDEKO NA YO, BABOTI YA BOTI NA LOKOLA BATIKA BISO OPESA BANGO MUKONGO. NKUNDA NA BANGO EKOMA BAFULU.

OZALI KOBIKELA NA MAKILA NA BANGO, BA KOMBO NA BANGO, BILONGI NA BANGO KASI OBOYA BANGO. KASI YO OZALI BANGO.

BASANGISAKA BONZAMBE TE. BILEMBO OYO EZALI NA MANGOMBA, BA LOGES NIONSO WANA, EZALI YA BISO TE.

TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA MWINDA YA BISO BAYINDO LISUNGI NA YE EZALI YA OFELE, SIKOYO BA OFFRANDES NA BA TSITSANI EZALI PONA NANI PE NINI ?

BANA MAMA KONGO BAMIYEBA, BAMINDIMA NA BAMITOSA PONA BABIMA NA BOWUMBU.

BA OYO BAZALI KOSUTUKA NA PONGI NA BANGO PONA BABIMA NA LIBUMU YA NGUMA BANGO NDE BAKO MIBIKISA, BA KOBIKISA MABOTA NA BANGO PE MBOKA NA BANGO.

Freddy Mulongo Mukena
Freddy Mulongo Mukena
Freddy Mulongo-Le Pamphlétaire !
Freddy Mulongo-Article 19 Liberté d’expression !
Réveil-FM (Freddy Mulongo) Ingeta
Mulongo Mukena Mulunda Mulongo
Réveil FM International

Auteur/autrice

Répondre

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *