« NA NDENGE BISO TOMIYEBI, TOMINDIMI PE TOMITOSI NDAKO NA BISO KONGO EZALI YA KOBOMBANA » !
MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.
BA NDEKO TO YAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA MPAMBA, MAWEJA NA NGILA, MVIDJI MUKULU, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE.
BAPAYA BAYAKI KO NDIMISA BISO NA MAKASI, KASI BISO TOZALI KO NDIMISA MUTU MOKO TE NA MAKASI.
TOZALI KOTALISA BANA NA BISO MAKAMBO, BANGO MOKO BAYA KOSOSOLA BOSOLO ESIKA EZALI.
TOZALI KOSALA WANA MAKAMWISELI YA MINENE KOLEKA KOSEKWISA BATU OYO BALALI PONGI YA SUKA.
PO MOTO OYO ASEKWI KASI AMIYEBI TE, AMINDIMI TE, PE AMITOSI TE, SUKA NA YE EZALI NINI ? AKO SUKA WAPI ?
SOKI BATU BAZALI KOLINGA BAMONA BANA ELONGA BAZALI KOSALA BA MIRACLES YAKO SEKWISA BATU : OKEYI OSEKWISI MOTO, ALAMUKI, SIMA MOTO YANGO AZONGI NA BOBUNGI, AKEYI LISUSU KOZONGA NA CONSOLATION , TANGO AKOLALA PONGI NA YE YA SUKA, AKO SUKA WAPI ?
KASI MOSALA NINI BISO BANA ELONGA TOZALI KOSALA ?
TOZALI KOSEKWISA BATU OYO BAZALI NA COMA YA MOLIMO.
PO SOKI NDEKO ASEKWI, AYA KOMIYEBA, KOMINDIMA PE KOMITOSA. LOBI NA YANGO AKOZALA NA ESENGO YA KOKENDE KOKUTANA NA NZAMBE YA BA KOKO NA YE : TATA MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA MPAMBA, MAWEJA NA NGILA, MVIDJI MUKULU, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NA BA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE.
NA NDENGE BISO BANA ELONGA TOMIYEBI, TOMINDIMI PE TOMITOSI NDAKO NA BISO EZALI YA KOBOMBANA.
BA NDEKO LELO TOYE KOFUNGOLA BINO BA MAKAMBO EBELE.
BOZALA NDE NA MAKASI,
BOZALA NDE NA BUANIA PONA KOSOLOLA MAKAMBO NINI OYO BISO TOZALI KOLOBA.
NA NDENGE BISO TOMIYEBI, TOMINDIMI PE TOMITOSI NDAKO NA BISO KONGO EZALI YA KOBOMBANA !
NDAKO OYO BANA ELONGA BATONGA PE BAKOTISA BA KOKO NA KATI EZALI YA KOBOMBANA NA MISO YA BATU YA LIKUNIA, OYO NIONSO BINO BOZALI KOMONA EZALI KOLEKA KUNA EZALI LIBANDA, EZALI NA KATI YA NDAKO NA BISO TE.
PO NDAKO NA BISO KONGO TOLOBI EZALI YA KOBOMBANA.
À SUIVRE.
MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.






