Home / Politique / Politique / BANA ELONGA RÉVISION LEÇON :

BANA ELONGA RÉVISION LEÇON :

« RDC EZALI PASI NA PASI, PASI LIKOLO NA PASI.

KASI KONGO YA TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA EZALI YA KOBOMBANA » !

MPAKA MATIKI MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

BA NDEKO TO YAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE.

BANA ELONGA BALOBAKI ETE NIONSO EZALI KOLEKA KUNA NA AFILIKA MINGI MINGI NA RÉPUBLIQUE DÉMOCRATIQUE DU CONGO EZALI LIBANDA YA KONGO.

KONGO OYO YA KIMBANGU DIANTUNGUNUA EZALI YA KOBOMBANA PE FUNGOLA EZALI NA MABOKO YA BANA ELONGA.

TOZALI KOLINGA TE TOMONA BA NDEKO NA BISO KOMI MONISA PASI YANGO TOZALI PEMBENI NA BANGO PO TOSUNGANA.

TOZALI NA MAKOKI NIONSO PONA KOMEMA EYANO NA PASI OYO EZALI KOLEKA NA MBOKA.

KASI TOZALI KOLINGA BA NDEKO NA BISO BAYEBA NDENGE NINI NA BANGO MOKO BAKOKI KOZUA EYANO NA MIKAKATANO NIONSO OYO BAKO KUTANA NA YANGO.

TOZALI KOLAKISA BANA NDENGE YAKO BIMISA MBISI NA MAYI NA ESIKA YA KOPESAKA BANGO MBISI NA SANI.

EZALI KOSALA BISO PASI NA KOMONAKA NIONSO OYO EZO LEKANA NA MBOKA.

BA NDEKO NA BISO MINGI BAZALI KO KUEYA KASI BISO TOKOKI KOSALA MIRACLE TE NA BISO MOKO PO KIMIA EKOTA NA MBOKA WANA.

TOZALI NA MAKOKI KASI TOKO SALA TE.

PONA NINI ?
PO SOKI TOSALI : TOSALISI, TOSUNGI BATU OYO BAZALI BA INCONSCIENTS BAKO KOBA KAKA KOSALA MABE WANA PE PASI EKO ZONGA LISUSU.

MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.

Auteur/autrice

Répondre

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *