« BAKOKO YA BANA NA BISO BAKO TAMBOLA NA MWINDA YA TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA » !
MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI WAYAMBO YA BANA ELONGA.
BA NDEKO BOYAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, ONIA SONGO, MAWEJA NA NGILA, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE.
BANA WANA NDE BAKO YEBA KO IDENTIFIER BAPAYA OYO BAYA KOKOTA NA MBOKA NA BISO KONGO.
TOLOBAKI ETE NA MOKILI OYO MOPAYA AKOZALA LISUSU TE.
BA OYO BA KONZAKA MOKILI BAMELISAKI BATO SUPU.
BAYEBAKA TINA NINI BAMELISAKI BATO SUPU WANA.
NINI BAZALAKI KOBONGISA ?
BA OYO BAKO SUTUKA NA MPONGI NA BANGO,
BA OYO BAKO ZALA NA BA KOKO NA BANGO, BANGO NDE BAKO LAKISA BANA NA BA KOKO NA BANGO NDENGE NINI BAKO MIBOMBA.
PO BA KOKO NA BANGO BAKO ZALA NA BANGO.
BANA WANA PE BA KOKO NA BISO BANGO NDE BAKOYEBA KO IDENTIFIER BAPAYA NA MABELE YA KONGO.
BAKOYEBA NANI NA NANI AZALI MUANA MAMA KONGO, NANI NA NANI AZALI MOPAYA.
TALA MOSALA TOZALI NA YANGO BANA MAMA KONGO PE BANA YA KONGO DIA NTOTILA.
TOSAKOLA NA SE YA BA NZETE NA BISO YA BOKONZI PO NZETE EYEBA KOPEMA.
MBUMA YA NZETE TANGO EKOKITA, EKITA NA ESIKA MALAMU.
BANA BAYEBA KOZUA YANGO NA BOPETE NIONSO.
MBUMA EZALA KUNA TE NA SE YA MATITI NOKI TE BANA BAKUTANA NA BA NIOKA, BA NZUBE TO MAKAMA YA LOLENGE NIONSO.
TANGO MOPEPE YA MAKASI EKO LEKA, BANA NA BISO BAZALA YA KOBOMBAMA.
BANA BAKO LAKISA BANA NA BANGO NDENGE NINI BASALAKI PO MOPEPE YA MAKASI EZUA BANGO TE.
BANA OYO BAKO SOSOLA,
BANA OYO BAKOLANDA BA KOKO NA BANGO, BAKO ZUA BOMENGO OYO TOTIKELI BANGO , BAKOSALELA PE KOTOSA YANGO.
BANA WANA NDE BAKO YEBA KO TELEMELA BAPAYA PE KO IDENTIFIER BANGO.
BAKOKO YA BANA NA BISO BAKO TAMBOLA NA MWINDA YA TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA.
À SUIVRE.
MPAKA Mwana Matiki KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI WAYAMBO YA BANA ELONGA.





