‘BANA NA BISO « BAKOTOSA » BANGO NDE BAKO TELEMENA BA OYO BAMEMA LOKUTA NA MOKILI NA MOBIMBA » !
MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.
BA NDEKO TO YAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO, JANKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA BENGAKA YE.
PLAN OYO BASALAKA PO BA KENDE KOBUAKA BATU SOKI WAPI EKOTI MAYI.
PO MBALA MOKO BOYE BAZALAKA SURPRIS BAKANISAKI BA KANGI NIONSO KASI BAYE KOMONA EZALI NA BATO BASUTUKI NA PONGI : BATO BAMIYEBI, BAMINDIMI PE BAMITOSI.
MBALA MOKO MULONGO OYO BA BANDAKI KOMEMA BATU NIONSO BAKENDE KOBUAKA BANGO SOKI NA LIBUMU YA NANI, MULONGO EPANZANI.
YANGO NDE EPESI BATO KANDA PE NGANZI MAKASI.
BATU BAKOMI NA LIKUNIA,
BATU BAKOMI NA ZUWA,
NDENGE NINI BISO TOKANGAKI BATU NA BISO, BA NGOLO NA BISO, BANGO OYO BAYE KOBIMA NA MABOKO NA BISO, BABIMI NA CONTRÔLE NA BISO, EPESI BATU NGANZI.
BA OYO TOBENGI « BAKOTOSA » ESENGELI BAZALA MAKASI.
BANGO « BAMITOSA » BANDA BOMWANA, BAKOTIKALA KOTIA MAKOLO NA BANGO TE NA BISIKA WANA YA BATU TO MILIMO EWUTAKI LIBANDA.
BA OYO BAZALI KOYA SIMA NA BISO, TOZONGELI OYO BISO TOBENGI « BAKOTOSA ».
BANGO ESENGELI BAZALA MAKASI.
SOKI BISO OYO BAKOSAKA BISO, TOYE KOSUTUKA NA KIDIBA NA SIMA, KASI « BAKOTOSA », BAKOYA SIMA NA BISO, BANGO EZALI NA MUTU AKOKOSA BANGO TE.
BAZALA MAKASI, BAKENDE KOTIA MAKOLO NA BANGO TE NA BISIKA OYO BANGO BA COMPRENDRE EZALI NINI ? BABISIKA OYO BAMEMELAKA BISO YA BAPAYA, BABISIKA OYO EZALI PO NA KOBEBISA MABOTA YA BATU, BAKENDE KOTIA MAKOLO NA BANGO KUNA TE.
« BAKOTOSA » TOLOBI BAZALA MAKASI.
« BAKOTOSA » ESENGELI BAZALA EBELE PO BA KOTELEMELA NA MAKASI NIONSO BATU YA LIKUNIA, BATU YA ZUWA, BATU YA NGANZI.
BA OYO BISO TOBENGI « BAKOTOSA » BAKO TELEMELA BANGO.
BISO MOKO PE TOMITOSAKA, TOZALI PE BAKOTOSA TOKOKI PE KOTELEMELA BATU YA LIKUNIA KASI MAKASI NA BISO EKOZALA LOLENGE MOKO TE NA BA OYO BAMITOSA BANDA BOMWANA.
TALA TINA TOZO SENGA NA BA NDEKO NA BISO BA BONGISA BANA, OYO TOBENGI BA
« BAkOTOSA ».
BALAKISA BANGO BOTOSI WANA, BANGO BAYA KOMITOSA.
PO SOKI BAMITOSI BANGO NDE BA KOTELEMELA BATU OYO BAMEMA LOKUTA NA MOKILI MOBIMBA.
« BAKOBOTOSA » BANGO NDE BA KOTELEMELA BA OYO BAFANDELA BISO.
TOKO PUSA BATO TE BAYEBA, BANDIMA TO BATOSA BA KOKO NA BANGO.
MOTO YE MOKO ASENGELI AMIYEBA, AMINDIMA PE AMITOSA.
BISO TOZALI KOSUNGA, TOZALI KOMEMA BILEYI NA BISO PO BANA NA BISO BASUTUKA NA PONGI : BAMIYEBA, BAMINDIMA PE BAMITOSA KASI BISO TOKO PUSA BANGO NA MAKASI TE BA NDIMA BOYE NDENGE BATU OYO BAYAKA KO NDIMISA BISO NA MAKASI BATU OYO TOYEBI TE.
NDIMA BOYE, YEBA BOYE, TOSA BOYE BISO TOKO SALA YANGO TE !
BISO TOZALI KOSUNGA NA BILEYI OYO PO BANA BAYA KOYEBA BOSOLO ESIKA EZALI
BANA BAYA KOSUTUKA NA PONGI NA BANGO.
BANA BAYA KOMONA LOKUTA OYO BATAMBUISAKA NA MOKILI, WANA BANA BANGO MOKO BAKOYA KOLAKA.
BANA BAKOYA KOMONA NA BANGO MOKO BISO ESENGELI KOMITOSA, BAKONA KE ESIKA WANA EZALI CLAIR TE: LOKUTA NA LOKUTA, BAKOYA KOKANGA LOKUTA YANGO.
TANGO BANA BAMITOSI BAKOMONA KE BAZALI BA OYO YA BISO BALEKA PO BAZALI NA BA KOMBO MOKO, BILONGI MOKO PE MAKILA MOKO.
BANA NA BISO BAKOYA KOYEBA BA KOKO NA BANGO.
LOKOLA BAYEBI BA KOKO, BANA BA KONDIMA PE KOTOSA BA KOKO NA BANGO.
TALA ESIKA BANA BAYA KOMI TOSA, KO MINDIMA PE KO MIYEBA.
À SUIVRE.
MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.




