« BA OYO BA KOSUTUKA NA MPONGI NA BANGO BAKOTELEMA PONA KOLANDA MWINDA YA BA KOKO NA BANGO » !
MPAKA MATIKI, MOLAKISI YA BALAKISI WAYAMBO YA BANA ELONGA.
BA NDEKO TO YAMBA MBOTE YA MAPAMBOLI NA KOMBO YA NZAMBE YA BA KOKO NA BISO MPUNGU TULENDO NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI, NZAMBE YA BA KOKO NA MINOKO NA BISO NIONSO NDENGE BA KOKO NA BISO BA BENGAKA YE.
BANA MAMA KONGO BAKANGAMA NA MITAMBU YA CHRISTIANISME, ISLAM, BOUDDHISME NA BA LOGES SECRÈTES…
BINO BA NDEKO OYO BOZALI YA KOKANGAMA, BOKOTA BOWUMBU, BOWUMELA KUNA PE BOKUEYA NA MPONGI YA BA BÉBÉ.
BASUSU KUTU BAKOTA NA COMA YA MOLIMO.
NIONSO OYO BOZALI KOSALA NA BA NZOTO NA BINO BOZALI KOYEBA TINA NA YANGO TE.
PONA BOZALI YA KOKANGAMA, BOZALI NA COMA.
MILIMO NA BINO EZALI YA KOKANGAMA.
LOKOLA BOZALI NA MPONGI BATU MOSUSU BAZALI KOSAKANA NA BINO.
TATA MPUNGU TULENDO, NJAKOMBA EA MPAMBA, MVIDJI MUKULU, MAWEJA NA NGILA, ONIA SONGO, NZAPA, WAMBA, MUNGU BABA MUOMBAJI YE NDE NZAMBE YA BA KOKO NA BISO, NA MINOKO NIONSO NDENGE BA BENGAKA YE, ATONDISA MABELE PE SE YA MABELE YA KONGO NA NKITA YA NDENGE NA NDENGE, KASI BOZALI KO PROFITER NA YANGO TE.
KAKA BATU YA LIBANDA !
TALA TINA TOSENGI NA BINO BA NDEKO NA BISO NA KOSUTUKA NA MPONGI NA BINO.
BA OYO BAKOKOKA KOSUTUKA NA MPONGI NA BANGO BAKOTELEMA PONA KOLANDA MWINDA YA BA KOKO NA BANGO.
OZALAKI NA MPONGI OYE KOSUTUKA : NAZALI WAPI ? OYO NA MONI EZALI NINI ? NINI EZALI KOLEKA LIBOSO PE MPEMBENI YA NGAI ? OYE KO KOSOLOLA KE NZELA OYO OLANDAKI EZALI YA YO TE.
YANGO NDE BATU MOSUSU BAKOMI NDE KOSAKANA NA YO.
TANGO YO OSOSOLI NDENGE WANA : OKO TELEMA !
OBANDI KOLANDA MWINDA OYO YA BA KOKO NA YO BAYE KOLAKISA YO.
BANGO NDE BAYE KOFUNGOLA YO MISO.
MALOBA OYO YO OKUTANI NA YANGO NA NZELA BA KOKO NA YO NDE BATINDELI YO.
PONA OYA KOMONA ESIKA YO OZALI.
OLANDA MWINDA YA BA KOKO NA YO.
SOKI OLANDI MWINDA WANA OKO KENDE KOKOMA NA NZELA NA BINO, ESIKA NDE OKOZALA NA KATI YA BA KOKO NA YO.
À SUIVRE.
MPAKA Mwana Matiki, KIMBANGU DIANTUNGUNUA, MOLAKISI YA BALAKISI, WAYAMBO YA BANA ELONGA.





